Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Poná kominanola na yo na bwanya

Poná kominanola na yo na bwanya

Mpo na nini tosengeli kopona kominanola na biso na bwanya? Mpo ntango toponaka filme ya kotala, miziki ya koyoka, site Internet, buku ya kotánga to lisano ya video oyo tokobɛta, toponaka nde makanisi oyo ekotonda na bɔɔngo na biso. Makambo oyo toponaka ebongolaka bizaleli na biso. Likambo ya mawa, lelo oyo lolenge mingi ya kominanola etondi na makambo oyo Yehova ayinaka. (Nz 11:5; Ga 5:19-21) Yango wana, Biblia esɛngi biso tókoba kokanisa makambo oyo ekumisaka Yehova.​—Flp 4:8.

TALÁ VIDEO NASENGELI KOPONA MASANO YA NDENGE NINI? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini masano ya bitumba ya Baroma ekokani na kominanola mosusu ya lelo?

  • Ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki kosalisa bilenge bápona kominanola na bwanya?

  • Ndenge nini Baroma 12:9 ekosalisa biso ntango tolingi kopona kominanola?

  • Wapi mwa kominanola ya malamu oyo ezalaka na esika ofandi?