Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAGALATIA 4-6

“Elilingi” oyo ezali na ntina mpo na biso

“Elilingi” oyo ezali na ntina mpo na biso

4:24-31

Ntoma Paulo asalelaki “elilingi” oyo mpo na komonisa ete kondimana ya sika eleki kondimana ya Mibeko. Na litambwisi ya Kristo mpe ya baoyo bazali bazwi-ya-libula elongo na ye, bato nyonso bazwi elikya ya kosikolama na lisumu, kozanga kokoka, mawa mpe liwa.​—Yis 25:8, 9.

 

AGARE MOOMBO MWASI

Ekólo Yisraele na nse ya kondimana ya Mibeko; mboka-mokonzi na yango ezalaki Yerusaleme

SARA MWASI YA NSOMI

Yerusaleme ya likoló, eteni ya ebongiseli ya Nzambe na likoló

“BANA” YA AGARE

Bayuda (basalaki boyokani na Yehova na nzela ya kondimana ya Mibeko) oyo banyokolaki mpe baboyaki Yesu

“BANA” YA SARA

Kristo ná bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo

BAOMBO NA KONDIMANA YA MIBEKO

Mibeko ezalaki kokundwela Bayisraele ete bazalaki baombo ya lisumu

KONDIMANA YA SIKA EPESAKA BONSOMI

Komonisa kondima na mbeka ya Kristo elongolaka bato na boombo ya Mibeko