Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Epai tozwi bafoto: Lokasa 3: Kokkinakis ná Grèce: Droit réservé

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi na likoló, na kolanda likɔnga ya montre: Eteyelo ya etúká ya Virginie occidentale ná Barnette; Kokkinakis ná Grèce; Taganrog LRO mpe basusu ná Russie; Cha mpe basusu ná Corée du sud

BOMOI YA BAKRISTO

“Kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko”

“Kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko”

Ntango batɛmɛli balukaki kopekisa Bayisraele kotonga lisusu tempelo, Bayisraele basalaki nyonso oyo esengelaki mpo bázwa ndingisa ya kokoba kotonga. (Ezr 5:11-16) Lelo oyo mpe, bakristo basalaka nyonso oyo esengeli mpo na kokɔtela nsango malamu na makambo etali mibeko. (Flp 1:7) Mpo na yango, na 1936, basalaki Departema ya makambo etali mibeko na Biro monene. Lelo, Departema ya makambo etali mibeko na Biro monene ebongisaka makambo mpo na kokɔtela matomba ya bokonzi na mokili mobimba. Ndenge nini Departema yango ezali kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi mpe kosalisa basaleli ya Yehova?

TALÁ VIDEO MOSALA YA DEPARTEMA YA MAKAMBO ETALI MIBEKO NA BIRO MONENE, NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Makambo nini etali mibeko Batatoli ya Yehova bakutanaka na yango?

  • Na makambo nini etali mibeko tolongaki? Lobelá ndakisa moko

  • Likambo nini mokomoko na biso akoki kosala na oyo etali “kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko”?

  • Esika nini na site na biso okokuta makambo oyo basaleli ya Yehova bazali kokutana na yango na makambo etali mibeko mpe liste ya Batatoli ya Yehova oyo bakangami na babolɔkɔ mpo na kondima na bango?