Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Bazali kosala mosala makasi mpo na biso

Bazali kosala mosala makasi mpo na biso

Bakɛngɛli ya zongazonga mpe basi na bango bamipimelaka mpe balingaka mpenza bandeko na bango bakristo. Bazali bato lokola biso; ntango mosusu balɛmbaka nzoto, bakutanaka na mitungisi mpe balingaka kopema. (Yak 5:17) Atako bongo, pɔsɔ nyonso oyo bakendaka kotala masangá, basalaka makasi bálendisa bandeko ya masangá yango. Bakɛngɛli ya zongazonga babongi mpenza kozwa “lokumu mbala mibale.”​—1Ti 5:17.

Ntango ntoma Paulo azalaki komibongisa mpo na kokende kotala bandeko ya masangá ya Roma mpo na ‘kokabela bango mwa likabo ya elimo,’ azalaki kozela na motema likoló mabaku ya ‘kolendisana’. (Ro 1:11, 12) Osilá kokanisa ndenge oyo okoki kolendisa mokɛngɛli ya zongazonga na bino mpe mwasi na ye, soki abala?

TALA VIDEO BOMOI YA MOKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA MOKO NA MBOKA MOSIKA, NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini bakɛngɛli ya zongazonga mpe basi na bango bamipimelaka mpe balingaka bandeko ya masangá?

  • Matomba nini osilá kozwa na mosala makasi na bango?

  • Ndenge nini tokoki kolendisa bango?