Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Etamboli malamu ya Ezera epesaki Yehova lokumu

Etamboli malamu ya Ezera epesaki Yehova lokumu

Ezera atikaki ete Liloba ya Nzambe esimba motema na ye mpe ebongisa etamboli na ye (Ezr 7:10; w00 1/10 lok. 14 par. 8)

Ezera asalisaki bato mosusu bámona bwanya oyo Nzambe azali na yango (Ezr 7:25; si lok. 75 par. 5)

Lokola amikitisaki liboso ya Nzambe, Ezera azalaki na kondima ete Yehova akotambwisa ye mpe akobatela ye (Ezr 8:21-23; it-1-F nk. 1155-1156 par. 9)

Bwanya ya Nzambe oyo Ezera amonisaki etindaki mokonzi apesa ye mikumba minene mpenza. Lokola Ezera, biso mpe tokoki kopesa Yehova lokumu na etamboli malamu na biso.

OMITUNA BOYE: Bato oyo bazali bandimi te bamemyaka ngai mpo na etamboli malamu na ngai?