Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Oyo okoki kosala mpo libota na yo ezala na esengo

Oyo okoki kosala mpo libota na yo ezala na esengo

Yehova alingaka ete mabota ezala na esengo. (Nz 127:3-5; Mos 9:9; 11:9) Nzokande, mitungisi ya mokili oyo to mabunga ya bato mosusu ya libota ekoki kosala ete tóbungisa esengo na biso. Moto mokomoko na libota akoki kosala nini mpo libota ezala na esengo?

Mobali apesaka mwasi na ye lokumu. (1Pe 3:7) Alekisaka ntango elongo na ye. Asɛngaka mwasi na ye makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ te mpe amonisaka botondi mpo na oyo mwasi na ye asalaka mpo na ye mpe mpo na libota mobimba. (Kol 3:15) Amonisaka ete alingaka ye mpe akumisaka ye.​—Mas 31:28, 31.

Mwasi asalaka nyonso mpo na kopesa mobali na ye mabɔkɔ. (Mas 31:12) Amikitisaka liboso na ye mpe asalaka na bomoko elongo na ye. (Kol 3:18) Alobaka malamu mpo na ye mpe asololaka na ye na boboto.​—Mas 31:26.

Baboti balekisaka ntango ná bana na bango. (Mib 6:6, 7) Bayebisaka bana na bango ete balingaka bango. (Mt 3:17) Bapesaka disiplini na bolingo mpe na makanisi malamu.​—Ef 6:4.

Bana bapesaka baboti na bango lokumu mpe batosaka bango. (Mas 23:22) Bayebisaka baboti na bango makanisi mpe mayoki na bango. Bandimaka disiplini ya baboti na bango mpe bamemyaka bango.​—Mas 19:20.

TALÁ VIDEO SALÁ ETE LIBOTA NA YO EZALA NA ESENGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:

Moto mokomoko na video oyo asalaki nini mpo libota ezala na esengo?