Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Mikano nini ozali na yango mpo na mobu ya mosala ya sika?

Mikano nini ozali na yango mpo na mobu ya mosala ya sika?

Mikano ya elimo esangisi makambo nyonso oyo tozali kosala makasi tókokisa mpo na kosalela Yehova lisusu mingi mpe kosepelisa ye. Yango esalisaka biso tókóma bakristo oyo bakomeli na elimo, yango wana, ebongi mpenza tósalela ntango mpe makasi na biso mpo na kokokisa mikano yango. (1Ti 4:15) Mpo na nini tosengeli kotalelaka mikano na biso mbala na mbala? Mpamba te makambo ya bomoi ebongwanaka. Mbala mosusu mokano oyo tomityelaki liboso emonani ete tokokoka kokokisa yango lisusu te to mpe tosí tokokisaki yango, sikoyo esɛngi tómityela mokano mosusu.

Ntango oyo ebongi mpo na kotalela mikano oyo tokoki komityela ezali liboso tóbanda mobu ya mosala ya sika. Mpo na nini te kolobela yango na losambo na bino na kati ya libota mpe na nsima komityela mikano ya yo moko mpe ya libota mobimba?

Mikano nini omityeli na makambo oyo elandi, mpe bibongiseli nini ozwi mpo na kokokisa yango?

Kotánga Biblia, boyekoli na yo moko, koyangana na makita, kopesa biyano na makita. ​—w02 15/6 lok. 15 par. 14-15

Mosala ya kosakola.​—w23.05 lok. 27 par. 4-5

Bizaleli ya bokristo.​— w22.04 lok. 23 par. 5-6

Mokano mosusu: