Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Mekolá bolingo ya sembo ya Yehova

Mekolá bolingo ya sembo ya Yehova

Yehova azali ndakisa eleki malamu na oyo etali bolingo ya sembo. (Nz 103:11) Bolingo yango ezalaka kaka mpo na mwa ntango te mpe ebongwanaka te. Bolingo ya sembo esɛngi kokangama makasi na moto mpe eumelaka. Yehova amonisaki bolingo yango epai ya bato ya Yisraele na lolenge mingi. Alongolaki bango na boombo na Ezipito mpe amemaki bango na mokili ya Ndaka. (Nz 105:42-44) Abundelaki basaleli na ye mpe mbala na mbala alimbisaki masumu na bango. (Nz 107:19, 20) Ntango tozali kotyela “misala ya [bolingo ya sembo] ya Yehova likebi,” yango etindaka biso tómekola ye.​—Nz 107:43.

TALÁ VIDEO “TYELÁ MISALA YA BOLINGO YA SEMBO YA YEHOVA LIKEBI,” NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Na balolenge nini tokoki komonisa bolingo ya sembo?

  • Mpo na nini komonisa bolingo ya sembo esɛngaka komipimela makambo mosusu?