Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Omonaka ete mosala ya mabɔkɔ ebongi na yo te?

Omonaka ete mosala ya mabɔkɔ ebongi na yo te?

Nganga-nzambe monene ná bandeko na ye bapesaki mabɔkɔ mpo na kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme, bamimonaki te ete bazali na valɛrɛ mingi koleka bamosusu (Ne 3:1)

Bato mosusu ya lokumu baboyaki kosala mosala mpo bamonaki ete ekosilisa bango valɛrɛ (Ne 3:5; w06 1/2 lok. 10 par. 1)

Basi oyo babangaka Nzambe basalaki na molende mpenza mosala wana ya makasi (Ne 3:12; w19.10 lok. 23 par. 11)

Misala mingi na masangá ezalaka misala ya mabɔkɔ mpe oyo elɛmbisaka, mpe misala yango esalemaka kozanga ete bato mingi báyeba.​—w04 1/8 lok. 18 par. 16.

OMITUNA BOYE: Namimonaka ndenge nini soki nazali kosala misala ya ndenge wana mpo na matomba ya Bokonzi?​—1Ko 9:23.