Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

05-11/08

NZEMBO 70-72

05-11/08

Loyembo 59 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. ‘Yebisá libota oyo ekoya’ nguya ya Nzambe

(Min. 10)

Davidi amonaki ndenge Yehova abatelaki ye na bolenge (Nz 71:5; w99 1/9 lok. 13 par. 17)

Davidi amonaki ndenge Yehova asalisaki ye ntango akómaki mobange (Nz 71:9; g04 8/10 23 par. 3)

Davidi alendisaki bilenge na masolo ya makambo oyo akutanaki na yango (Nz 71:​17, 18; w14 15/1 lok. 23 par. 4-5)

OMITUNA BOYE: ‘Ndeko nini oyo asaleli Yehova bambula mingi tokobengisa na Losambo na kati ya libota mpo tótuna ye mituna?’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 72:8—Ndenge nini elaka oyo Yehova apesaki Abrahama oyo ezali na Ebandeli 15:18 ekokisamaki na boyangeli ya Salomo? (it-1 lok. 825)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Ntango moto yango abandi kobimisa ntembe, katá lisolo na ndenge ya malamu. (lmd liteya 4 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Kobá lisolo na ndeko moko ya libota, oyo azali sikoyo koyebisa yo ntina oyo azali kobanga koyekola Biblia. (lmd liteya 8 pwɛ 4)

6. Kolimbola bindimeli na yo

(Min. 5) Diskur. ijwfq 49—Motó ya likambo: Mpo na nini Batatoli ya Yehova basembolaka mateya na bango mosusu? (th liteya 17)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 76

7. Makanisi mpo na Losambo na kati ya libota

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Losambo na kati ya libota ezali na ntina mingi mpo bana báyekola ‘mitinda mpe makebisi ya Yehova.’ (Ef 6:4) Koyekola ezali mosala, kasi yango ekoki kosepelisa, mingimingi soki bana bayekoli kolinga mateya ya Biblia. (Yn 6:27; 1Pe 2:2) Lobelá eteni “ Makanisi mpo na Losambo na kati ya libota,” oyo ekoki kosalisa baboti básalaka ete mpokwa ya Losambo na kati ya libota eteya bana mpe esepelisa bango, na nsima tuná bayangani mituna oyo:

  • Na makanisi oyo tolobeli, oyo wapi okomeka kosalela?

  • Osalelaki mayele mosusu oyo omonaki ete esalisaki libota?

Lakisá VIDEO Kobá kosala ete losambo na bino ya libota esepelisaka. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini mobali akoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisa mwasi na ye ntango bazali na bana na ndako te?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 123 mpe libondeli