Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

26/08–01/09

NZEMBO 78

26/08–01/09

Loyembo 97 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Kozanga bosembo ya Yisraele ezali likebisi mpo na biso

(Min. 10)

Yisraele ebosanaki misala ya kokamwa ya Yehova (Nz 78:​11, 42; w96 1/12 nk. 29-30)

Yisraele ezalaki na botɔndi te mpo na mapamboli ya Yehova (Nz 78:19; w06 15/7 lok. 17 par. 16)

Bayisraele bazwaki mateya te na mabunga oyo basalaki, kasi bakobaki kozanga bosembo (Nz 78:​40, 41, 56, 57; w11 1/7 lok. 10 par. 3-4)


MPO NA KOMANYOLA: Nini ekosalisa biso tózanga bosembo te epai ya Yehova?

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 78:​24, 25—Mpo na nini mana ebengamaki “bilei ya likoló” mpe “mampa ya bato ya nguya”? (w06 15/7 lok. 11 par. 4)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Sɛngá moto obanda koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 5 pwɛ 5)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Salelá trakte moko mpo na kobanda lisolo. Sɛngá moto yango obanda koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 5 pwɛ 4)

6. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 1) NDAKO NA NDAKO. Moto yango asɛngi yo oumela te. Sɛngá ye obanda koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 2 pwɛ 5)

7. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Kozanga olobela liteya moko ya sikisiki ya Biblia, yebisá moto yango na kati ya lisolo ete ozali Motatoli ya Yehova, mpe sɛngá ye obanda koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 2 pwɛ 4)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 96

8. Zwá mateya na ndakisa ya Filipe mopalanganisi ya nsango malamu

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Biblia ezali na bandakisa mingi, ezala ya malamu to ya mabe. Mpo tózwa mateya na bandakisa yango, tosengeli kozwa ntango mpe kosala milende ya koyekola yango. Longola kotánga masolo ya Biblia, tosengeli komanyola na mateya oyo tozwi, mpe na nsima koyokanisa etamboli na biso na yango.

Filipe mopalanganisi ya nsango malamu azalaki mokristo oyo ‘atondi na elimo mpe na bwanya.’ (Mis 6:​3, 5) Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?

Lakisá VIDEO Zwá mateya epai na bango—Filipe mopalanganisi ya nsango malamu. Na nsima tuná bayangani mateya oyo bazwi na makambo oyo elandi:

  • Ndenge Filipe asalaki ntango makambo ya bomoi na ye ebongwanaki na mbalakaka.—Mis 8:​1, 4, 5

  • Mapamboli oyo Filipe azwaki na ndenge andimaki kokende esika oyo mposa ezalaki mingi.—Mis 8:​6-8, 26-31, 34-40

  • Matomba oyo Filipe ná libota na ye bazwaki lokola bamonisaki ezaleli ya koyamba bapaya.—Mis 21:​8-10

  • Esengo oyo libota oyo tomoni na video ezwaki na ndenge elandaki ndakisa ya Filipe

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 101 mpe libondeli