Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

29/07–04/08

NZEMBO 69

29/07–04/08

Loyembo 13 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Nzembo 69 esakolaki makambo oyo esalemaki na bomoi ya Yesu

(Min. 10)

Bato bayinaki Yesu kaka mpamba (Nz 69:4; Yn 15:​24, 25; w11 15/8 lok. 11 par. 17)

Yesu azalaki na molende mpo na ndako ya Yehova (Nz 69:9; Yn 2:​13-17; w10 15/12 lok. 8 par. 7-8)

Yesu amitungisaki mingi na mayoki mpe bapesaki ye vinyo basangisá na mai ya bololo (Nz 69:​20, 21; Mt 27:34; Lk 22:44; Yn 19:34; g96 Janvier lok. 31 par. 4; it-2 lok. 599)


MPO NA KOMANYOLA: Mpo na nini Yehova akomisaki bisakweli oyo etali Masiya na Makomami ya Ebre?

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 69:​30, 31—Ndenge nini bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso tóbongisa lolenge ya mabondeli na biso? (w99 15/1 lok. 18 par. 11)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Motema molai—Oyo Yesu asalaki

(Min. 7) Lisolo na bayangani. Lakisá VIDEO, mpe na nsima bólobela lmd liteya 8 pwɛ 1-2.

5. Motema molai—Mekolá Yesu

(Min. 8) Lisolo na bayangani na lmd liteya 8 pwɛ 3-5 mpe “Talá mpe.”

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 134

6. Bamposa ya lisangá

(Min. 5)

7. Malako oyo etali Losambo na kati ya libota

(Min. 10) Lisolo na bayangani.

Na sanza ya 01/2009, basangisaki Boyekoli ya mokanda, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ná Likita ya Mosala mpe ekómaki likita moko ya kati ya pɔsɔ. Yango etikelaki mabota mpokwa mobimba pɔsɔ nyonso mpo básala programɛ na bango moko ya losambo na kati ya libota. Bandeko mingi bamonisaki botɔndi mpo na ebongiseli yango mpo esalisi bango bápusana lisusu penepene na Yehova mpe bázala na boyokani makasi na libota.—Mib 6:​6, 7.

Wapi mwa makanisi oyo ekoki kosalisa bakonzi ya mabota mpo mpokwa ya Losambo na kati ya libota elekaka malamu?

  • Bósalaka yango pɔsɔ nyonso. Soki likoki ezali, bózala na mokolo ya kosala losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ. Bótya mpe mokolo mosusu oyo bokosala losambo yango soki bosali yango te na mokolo na yango

  • Bongisáká yango. Sololáká na mwasi na yo, mpe na bantango mosusu tunáká bana soki balingi bóyekola nini. Komibongisa esɛngi te koluka makambo ya mindɔndɔ, mingimingi soki libota esepelaka kosala makambo mosusu pɔsɔ nyonso

  • Eyokana na makambo ya libota na yo. Wana bana bazali kokola, bamposa mpe makoki na bango ebongwanaka. Makambo oyo bokosala esengeli kosalisa moto mokomoko ya libota akola na elimo

  • Esalema na bolingo, mpe moto nyonso azala na esengo. Na bantango mosusu, bokoki koyekola na libándá soki mbula to malili ezali te. Bokoki mpe kopema moke soki esengeli. Ezali mabe te kotalela mikakatano ya sikisiki ya libota, kasi esengeli te kosalela losambo na kati ya libota mpo na kotyola to kopamela

  • Bósalaka makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, bokoki kobongisa eteni moko ya makita, kotala mpe kolobela video moko ya jw.org, mpe komekameka ndenge ya kosakola. Ata soki losambo na kati ya libota esengeli kozala libosoliboso lokola lisolo, bokoki mpe kotikela moto na moto ntango mpo ayekola ye moko

Tuná bayangani motuna oyo:

  • Ndenge nini osilá komeka kosalela makanisi yango na losambo na bino na libota?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 114 mpe libondeli