Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

16-​22/07

LUKA 10-11

16-​22/07
  • Loyembo 100 mpe libondeli

  • Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

  • Ndakisa ya Mosamaria ya motema malamu”: (Min. 10)

    • Lk 10:29-32​—Ezala nganga-nzambe to Molevi, moko na bango te asalisaki Moyuda oyo akutanaki na miyibi [Lakisá “Nzela kolongwa Yerusaleme tii Yeriko” bililingi mpe bavideo na Luka 10:30, nwtsty-E.] (w02 1/9 lok. 16 par. 14-15)

    • Lk 10:33-35​—Mosamaria moko amoniselaki Moyuda yango bolingo monene (“Mosamaria moko,” “akangi bampota na ye mpe asopeli yango mafuta ná vinyo,” “ndako oyo bapaya bazalaki kolala” banɔti mpo na koyekola na Lk 10:33, 34, nwtsty-E)

    • Lk 10:36, 37​—Tosengeli kolinga bato nyonso, ezala kaka te baoyo tokokani na bongo na bozwi, loposo, to ekólo (w98 1/7 lok. 31 par. 2)

  • Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)

    • Lk 10:18​—Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki bayekoli 70 ete: “Namoni Satana auti na likoló akwei lokola mokalikali”? (“Namoni Satana auti na likoló akwei lokola mokalikali” nɔti mpo na koyekola na Lk 10:18, nwtsty-E; w08 15/3 lok. 31 par. 11)

    • Lk 11:5-9​—Ndakisa ya mobali oyo azalaki mbamba eteyi biso nini na likambo etali kobondela? (“Moninga, defisá ngai mampa misato,” “Tiká kotungisa ngai,” “mbamba makasi” banɔti mpo na koyekola na Lk 11:5-9, nwtsty-E)

    • Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?

    • Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?

  • Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Lk 10:1-16

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá eyano na ntembe moko oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino.

  • Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Moto yango ayebisi yo ete azali kolya.

  • Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Min. 5) Lakisá video mpe bólobela yango.

BOMOI YA BAKRISTO