Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | LUKA 8-9

Landá ngai​—Esɛngi nini?

Landá ngai​—Esɛngi nini?

9:62

Mpo mikala ebima ya kotɛngama te, moto oyo azalaki kobalola mabele asengelaki te kotika likebi na ye ekende na biloko oyo ezali nsima na ye. Ndenge moko mpe, mokristo akoki te kotika likebi na ye ekende na makambo ya mokili oyo atiká.​—Flp 3:13.

Ntango tokutani na mikakatano, ezalaka mpasi te kokanisa ‘ntango ya malamu oyo tolekisá,’ mbala mosusu liboso tóyeba solo. Ntango tozali kokanisa, mbala mingi tolekisaka ndelo na bisengo oyo tozwá mpe tokipaka mpenza te mikakatano oyo tokutaná na yango. Yango nde Bayisraele basalaki nsima ya kobima na Ezipito. (Mit 11:5, 6) Soki tobengani makanisi ya ndenge wana te, tokoki koyoka mposa ya kozongela bomoi oyo tozalaki na yango kala. Eleki malamu tótya miso na mapamboli oyo tozali na yango sikoyo mpe na bisengo oyo tokozwa na Bokonzi ya Nzambe!​—2Ko 4:16-18.