Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tósalisa bayekoli ya Biblia mpo bámipesa na Nzambe mpe bázwa batisimo

Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tósalisa bayekoli ya Biblia mpo bámipesa na Nzambe mpe bázwa batisimo

NTINA NA YANGO: Mpo bayekoli ya Biblia bándimama na Yehova, basengeli komipesa na ye mpe kozwa batisimo. (1Pe 3:21) Na nsima, baoyo bakotosa elako na bango bakobatelama na elimo. (Nz 91:1, 2) Mokristo amipesaka nde na Yehova, kasi te na moto, na mosala, to na ebongiseli moko boye. Yango wana, bayekoli ya Biblia basengeli koyekola kolinga Nzambe mpe kopesa ye matɔndi.Ro 14:7, 8.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Ntango bozali koyekola, lobelá ndenge makambo yango emonisi bizaleli ya Yehova. Monisá ntina ya kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe ya kobondela Yehova “ntango nyonso.”1Te 5:17; Yk 4:8

  • Lendisá moyekoli amityela mokano ya komipesa na Nzambe mpe ya kozwa batisimo. Salisá ye amityela mpe mikano mosusu ya mikemike, na ndakisa kopesa biyano na makita to koteya bato ya kartye mpe baninga ya mosala. Kobosana te ete Yehova atindaka moto te na makasi ete asalela ye. Moto ye moko asengeli kolinga komipesa na Nzambe.Mib 30:19, 20

  • Lendisá moyekoli abongisa makambo oyo esengeli mpo asepelisa Yehova mpe azwa batisimo. (Mas 27:11) Lokola bizaleli mpe mimeseno mosusu ya mabe ezalaka mpasi na kotika, ekoki kosɛnga okoba kosalisa moyekoli ya Biblia mokemoke mpo alongola bomoto ya kala mpe alata bomoto ya sika. (Ef 4:22-24) Bólobela masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobi “Biblia ebongolaka bato”

  • Yebisáká ye esengo oyo oyokaka na kosalela Yehova.Yis 48:17, 18