Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 102-105

Yehova abosanaka te ete tozali putulu

Yehova abosanaka te ete tozali putulu

Davidi asalelaki maloba ya elilingi mpo na komonisa motema mawa ya Yehova.

  • 103:11

    Ndenge kaka tokoki te koyeba ntaka oyo ekaboli likoló oyo etondi na minzoto mpe mabele, tokoki te koyeba bonene ya motema boboto ya Yehova

  • 103:12

    Yehova abwakaka masumu na biso mosika mpenza, mosika lokola epai moi ebimaka tii epai moi elalaka

  • 103:13

    Ndenge kaka tata ayokaka mawa mpo na mwana na ye oyo azali na mpasi, Yehova mpe amonisaka motema mawa epai ya baoyo babongoli motema mpe batutami mpo na masumu na bango