Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Kampanye ya kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na sanza ya libwa

Kampanye ya kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na sanza ya libwa

Bato na mokili mobimba bazali na mposa ya libɔndisi. (Mos 4:1) Na boumeli ya sanza ya libwa, tokomipesa na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; ekolobela likambo ya kobɔndisa. Tókabola zulunalo yango mingi mpenza. Kasi, lokola mposa na biso ezali ete tósolola mpenza na bato mpo na kobɔndisa bango, tokotika zulunalo yango te na bandako oyo bato bazali te.

TOKOLOBA BOYE

“Biso nyonso tozalaka na mposa bábɔndisa biso. Kasi epai wapi tokoki kozwa libɔndisi? [Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.] Zulunalo oyo emonisi ndenge Nzambe abɔndisaka biso.”

Soki moto asepeli mpe azwi zulunalo, . . .

LAKISÁ VIDEO MPO NA NINI KOYEKOLA BIBLIA?

Na nsima, tuná ye soki bokoki koyekola Biblia.

LOBÁ LIKAMBO OYO EKOPESA YO NZELA YA KOZONGELA YE

Okoki kotuna motuna oyo okoyanola soki ozongeli ye, na ndakisa, “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?