Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

8-14/08

NZEMBO 92-101

8-14/08
  • Loyembo 28 mpe libondeli

  • Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

  • Kobá kozala makasi na elimo atako okómi mobange”: (Min. 10)

    • Nz 92:2—Bayengebene babotaka mbuma ya elimo (w07 15/9 32; w06 15/7 13 par. 2)

    • Nz 92:13, 14—Mibange bakoki kozala makasi na elimo ata soki makasi ya nzoto ezali kosila bango (w14 15/1 26 par. 17; w04 15/5 12 par. 9-10)

    • Nz 92:15—Mibange bakoki kobɛtaka masolo ya bomoi na bango mpo na kolendisa basusu (w04 15/5 12-14 par. 13-18)

  • Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)

    • Nz 99:6, 7—Mpo na nini Moize, Arona, mpe Samwele bazali bandakisa ya malamu? (w15 15/7 4 par. 5)

    • Nz 101:2—‘Kotambolatambola na kati ya ndako na biso na ezaleli ya kozanga mbeba ya motema’ elimboli nini? (w05 1/11 24 par. 14)

    • Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi ngai nini mpo na Yehova?

    • Makanisi nini ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo nakoki kosalela na mosala ya kosakola?

  • Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Nz 95:1–96:13

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) g16.4 ezipeli—Lobá likambo oyo ekopesa yo nzela ozongela ye.

  • Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) g16.4 ezipeli—Lobá likambo oyo ekopesa yo nzela ozongela ye lisusu.

  • Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 6 te) bh 161-162 par. 18-19—Salisá moyekoli amona ndenge akoki kosalela makambo boyekoli.

BOMOI YA BAKRISTO

  • Loyembo 90

  • Mibange: Bozali na ntina mingi na lisangá (Nz 92:12-15): (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video Mibange: Bozali na ntina mingi na lisangá. (Kende na tv.pr418.com, talá esika bakomi PONÁ VIDEO > BIBLIA.) Na nsima, sɛngá bayangani bálobela mateya oyo bazwi na video yango. Lendisá mibange bábɛtɛlaka bilenge masolo na bango mpo bámona bwanya na bango. Lendisá bilenge bátunaka mibange toli ntango balingi kozwa bikateli ya minene na bomoi.

  • Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) ia mok. 21 par. 13-22 mpe bozongeli ya mokapo

  • Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)

  • Loyembo 29 mpe libondeli