Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

23-29/09

NZEMBO 88-89

23-29/09

Loyembo 22 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Boyangeli ya Yehova eleki malamu

(Min. 10)

Boyangeli ya Yehova elendisaka bosembo ya solosolo (Nz 89:14; w17.06 lok. 28 par. 5)

Boyangeli ya Yehova epesaka bato esengo ya solosolo (Nz 89:​15, 16; w17.06 lok. 29 par. 10-11)

Boyangeli ya Yehova ekoumela seko na seko (Nz 89:​34-37; w14 15/10 lok. 10 par. 14)

Kokanisa ndenge boyangeli ya Yehova eleki malamu ekosalisa biso tóboya kokɔta na makambo ya mokili ntango toyoki makanisi ndenge na ndenge ya politiki

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 89:37—Bokeseni nini ezali kati na kozala moto oyo abongi kotyelama motema mpe kozala sembo? (cl lok. 281 par. 4-5)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Sɛngá moto oyo ayebi lingomba ya bokristo te bóyekola Biblia. (lmd liteya 5 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Lakisá moto ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka. (th liteya 9)

6. Kolimbola bindimeli na yo

(Min. 5) Diskur. ijwbq 181—Motó ya likambo: Biblia elobeli makambo nini? (th liteya 2)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 94

7. Mibeko ya Yehova eleki malamu

(Min. 10) Lisolo na bayangani.

Bato mingi bazali komona ete mibeko ya Biblia na oyo etali kosangisa nzoto mpe libala elekisi ndelo mpe esilá ngala. Omindimisá ete kotosa mibeko ya Yehova ezali ntango nyonso likambo oyo eleki malamu mpo na yo?—Yis 48:​17, 18; Ro 12:2.

Biblia elobi ete baoyo baboyaka kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali bizaleli ya mabe ná malamu “bakozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te.” (1Ko 6:​9, 10) Kasi ezali kaka mpo na ntina yango nde esengeli kotosa mibeko ya Nzambe?

Lakisá VIDEO Ndenge ya komonisa kondima—Ntango mibeko ya Nzambe eyokani te na oyo ya yo. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini mibeko ya Nzambe ebatelaka biso?

8. Bamposa ya lisangá

(Min. 5)

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 133 mpe libondeli