Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Mitambo ya kokima ntango ozali koyekola Biblia na moto

Mitambo ya kokima ntango ozali koyekola Biblia na moto

Koloba mingi: Kokanisa te ete yo nde osengeli kolimbola makambo nyonso. Yesu azalaki kotuna mituna mpo na kosalisa bato bákanisa mpe bákóma na makanisi oyo ebongi. (Mt 17:24-27) Mituna ekosala ete boyekoli esepelisa mpe ekosalisa yo oyeba makambo oyo moyekoli na yo akangi mpe andimi. (be 253 par. 2-3) Soki otuni motuna, zelá moke mpo moyekoli akanisa eyano akopesa. Soki apesi eyano oyo ebongi te, na esika opesa ye eyano ya malamu, tuná ye mituna mosusu mpo azwa eyano ya malamu. (be 238 par. 1-2) Kende malɛmbɛ mpo moyekoli akanga ntina ya makambo ya sika.be 230 par. 4.

Kokómisa boyekoli mindɔndɔ: Kimá motambo ya koloba nyonso oyo oyebi na likambo oyo bozali kolobela. (Yn 16:12) Lobelá kaka likanisi ya ntina ya paragrafe. (be 226 par. 4-227 par. 1) Makambo ya mikemike, ata soki ezali ya malamu, ekoki kobungisa makanisi ya ntina. (be 235 par. 3) Soki moyekoli asimbi likanisi ya ntina, bóleka na paragrafe oyo elandi.

Kosilisa kaka mokanda: Mokano na biso ezali ya kosimba motema, kasi te ya kosilisa mokanda. (Lk 24:32) Lokola Liloba ya Nzambe ezali na nguya, bendá likebi na bavɛrsɛ oyo esimbi likambo oyo bozali koyekola. (2Ko 10:4; Ebr 4:12; be 144 par. 1-3) Pesá bandakisa ya polele. (be 245 par. 2-4) Talelá mikakatano mpe mateya oyo moyekoli andimaka, mpe yokanisá yango na makambo oyo bozali koyekola. Okoki kotuna ye: “Okanisi nini mpo na makambo oyo toyekoli awa?” “Makambo yango eteyi biso nini mpo na Yehova?” “Okanisi ete bolamu nini okozwa soki olandi toli yango?”be 238 par. 3-5; 259 par. 2.