Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 135-141

Tosalami na ndenge moko ya nsɔmɔ

Tosalami na ndenge moko ya nsɔmɔ

Davidi amanyolaki makambo oyo ezalaki komonisa bizaleli ya Nzambe oyo azalaki komona na biloko oyo Nzambe akelá. Amipesaki mobimba na kosalela Yehova.

Ntango Davidi akanisaki na mozindo biloko Nzambe akelá, etindaki ye akumisa Yehova:

139:14

  • “Nakokumisa yo mpo nasalami na ndenge moko ya kokamwa, na ndenge moko ya nsɔmɔ”

139:15

  • “Mikuwa na ngai ebombanaki na miso na yo te ntango nasalamaki na nkuku, ntango nalitamaki lokola elamba na nse mpenza ya mabele”

139:16

  • “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo”