Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso na mosala ya kosakola—Tólendisaka bato oyo basepelaka na solo báya na makita

Tókolisa makoki na biso na mosala ya kosakola—Tólendisaka bato oyo basepelaka na solo báya na makita

NTINA NA YANGO: Makita ezali esika ya ‘koyembela Yehova’ mpe kosanzola ye. (Nz 149:1) Na makita, bateyaka biso kosala mokano ya Nzambe. (Nz 143:10) Mbala mingi, bato oyo basepelaka na solo mpe bayekoli ya Biblia bakolaka noki soki babandi koyangana na makita.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Bengisá ye banda na ebandeli. Kozela te bóbanda mpenza koyekola Biblia mpo obengisa ye na makita.Em 22:17

  • Yebisá moto oyo asepelaka na solo makambo oyo akomona mpe oyo bakolobela na makita yango. Biloko oyo ekoki kosalisa: lokasa ya libyangi mpo na makita, video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi?, mpe liteya 5 ná 7 ya mwa buku Mokano ya Yehova

  • Yebisá ye ete okoki kosalisa ye. Ntango mosusu moto yango azali na mposa ya lisalisi mpo na kokóma na makita to mpo na kopona elamba oyo ebongi! Soki ayei na makita, bófanda esika moko, mpe alanda na mikanda na yo. Lakisá ye bandeko mosusu