Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Soki mwana nde afungoli porte

Soki mwana nde afungoli porte

Soki mwana nde afungoli porte, tosengeli kotuna ye soki baboti na ye bazali. Yango ekomonisa ete tozali kotosa bokonzi na bango. (Mas 6:20) Soki mwana yango asɛngi biso tókɔta, tosengeli koboya. Soki baboti na ye bazali te, tokozonga mokolo mosusu.

Ata soki mwana yango azali mokóló, ntango mosusu aleki mbula 13 to alingi akokisa mbula 19, ekozala kaka malamu tótuna soki baboti na ye bazali. Soki bazali te, tokoki kotuna ye soki baboti bapesá ye nzela ya kotánga mikanda oyo alingi. Soki bapesá ye nzela, tokoki koyebisa ye ete tolingi tótikala ye mokanda mpe tokoki kolakisa ye site na biso jw.org.

Soki tozongeli elenge moko oyo asepelaki na solo, tosengeli kotuna soki tokoki kokutana na baboti na ye. Yango ekopesa biso nzela ya koyebisa ntina oyo toyei mpe kolakisa bango batoli ya malamu oyo Biblia epesi mpo na mabota. (Nz 119:86, 138) Soki tomonisi ete tozali kotosa bokonzi ya baboti ekozala litatoli ya malamu mpe ekoki kopesa biso libaku ya koyebisa libota mobimba nsango malamu.1Pe 2:12.