Bazali kopesana mbote na esengo na Malawi

MOKANDA YA LIKITA BOMOI MPE MOSALA Sanza ya Octobre 2018

Ndenge ya kobanda lisolo

Ndenge ya kobanda lisolo oyo emonisi ntina oyo bato banyokwamaka mpe makambo oyo Nzambe akosala mpo na yango.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Yesu abatelaka bampate na ye

Yesu, mobateli ya mpate oyo aleki malamu, ayebi bamposa ya mpate mokomoko, bolɛmbu na yango, mpe makasi na yango.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Mekolá motema mawa ya Yesu

Mpo na nini motema mawa ya Yesu mpe ndenge azalaki komitya na esika ya basusu ezali mpenza kokamwisa?

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

“Napesi bino ndakisa”

Yesu ateyaki bantoma na ye bázalaka na komikitisa mpe básalaka misala oyo ezangi lokumu mpo na bolamu ya bandeko na bango.

BOMOI YA BAKRISTO

Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo​—Boyá koluka kaka matomba na yo moko mpe kosilika

Mpo na komonisa bolingo lokola oyo Kristo amonisaki, tosengeli koluka matomba ya basusu mpe koboya kosilika.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

“Bozali bato ya mokili te”

Ekosɛnga bayekoli ya Yesu bámonisa mpiko mpo bálanda te makanisi mpe makambo ya bato oyo bafandi zingazinga na bango.

BOMOI YA BAKRISTO

Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo​—Batelá bomoko na biso

Mpo tókoba kozala na bomoko, tosengeli kolukaka makambo ya malamu epai ya basusu mpe kolimbisaka bango na motema moko.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Yesu apesaki litatoli mpo na solo

Lokola tozali bayekoli ya Yesu, biso mpe topesaka litatoli mpo na solo na maloba mpe na misala.

BOMOI YA BAKRISTO

Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo​—Sepelá na solo

Tosengeli mpe kosepelaka na solo, kolobaka solo, mpe kokanisaka makambo nyonso ya solo, atako tofandi na mokili oyo etondi na lokuta mpe na makambo ya kozanga boyengebene.