Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo​—Boyá koluka kaka matomba na yo moko mpe kosilika

Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo​—Boyá koluka kaka matomba na yo moko mpe kosilika

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Yesu ateyaki ete bato bakoyeba bayekoli na ye soki bazali kolingana. (Yn 13:34, 35) Mpo na komonisa bolingo lokola oyo Kristo amonisaki, tosengeli koluka matomba ya basusu mpe koboya kosilika.​—1Ko 13:5.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Ntango moto alobi to asali likambo moko ya mabe, tɛlɛmá naino mpe kanisá nini ebimisi likambo yango mpe soki likambo oyo okani kosala ekobimisa nini.​—Mas 19:11

  • Kobosana te ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe na bantango mosusu tolobaka to tosalaka makambo oyo tokoyoka mawa na nsima

  • Silisáká matata nokinoki

TALÁ VIDEO “BÓZALA NA BOLINGO NA KATI NA BINO”​—BOYÁ KOLUKA KAKA MATOMBA NA YO MOKO MPE KOSILIKISA BATO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini Larry alekisaki ndelo mpo na likanisi oyo Tom apesaki?

  • Ndenge nini kofanda nyɛɛ mpo na kokanisa esalisaki Tom aboya kosilika?

  • Ndenge nini eyano ya boboto oyo Tom apesaki ekitisaki Larry motema?

Matomba nini lisangá ezwaka soki tofandi nyɛɛ ntango batumoli biso?