Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo​—Sepelá na solo

Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo​—Sepelá na solo

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Tosengeli kopesa litatoli mpo na solo oyo etali mokano ya Nzambe ndenge Yesu asalaki. (Yn 18:37) Tosengeli mpe kosepelaka na solo, kolobaka solo, mpe kokanisaka makambo nyonso ya solo, atako tofandi na mokili oyo etondi na lokuta mpe na makambo ya kozanga boyengebene.​—1Ko 13:6; Flp 4:8.

NDENGE YA KOMONISA YANGO:

  • Zalá na ekateli ya koboya koyoka matɔngi to kopalanganisa yango.​—1Te 4:11

  • Kosepelaka te na mpasi ya basusu

  • Sepeláká na makambo ya malamu mpe ya kolendisa

TALÁ VIDEO “BÓZALA NA BOLINGO NA KATI NA BINO”​—KOSEPELAKA TE NA MAKAMBO YA KOZANGA BOYENGEBENE, KASI SEPELÁKÁ NDE NA SOLO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Nini emonisi ete Debbie azalaki ‘kosepela na makambo ya kozanga boyengebene’?

  • Ndenge nini Alice asalaki mpo masolo na ye ná Debbie elobela nde makambo ya kolendisa?

  • Wapi mwa makambo ya malamu oyo tokoki kolobela?

Kosepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene, kasi sepeláká nde na solo