Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOANE 18-19

Yesu apesaki litatoli mpo na solo

Yesu apesaki litatoli mpo na solo

18:36-38a

Yesu apesaki litatoli mpo na solo oyo etali mokano ya Nzambe

  • NA MALOBA: Asakolaki solo oyo etali Bokonzi ya Nzambe na molende mpenza

  • NA MISALA: Bomoi na ye emonisaki ete liloba ya esakweli ezalaki solo mpenza

Lokola tozali bayekoli ya Yesu, biso mpe topesaka litatoli mpo na solo

  • NA MALOBA: Tosakolaka na molende nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo Mokonzi na yango ezali Kristo, ata ntango bato bazali kosɛka biso

  • NA MISALA: Topesaka boyangeli ya Yesu mabɔkɔ ndenge toboyaka mpenza kokɔta na makambo ya mokili mpe tomonisaka bizaleli ya malamu