Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

25/11–01/12

NZEMBO 109-112

25/11–01/12

Loyembo 14 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Pesá Mokonzi Yesu mabɔkɔ!

(Min. 10)

Nsima ya kozonga na likoló, Yesu afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe (Nz 110:1; w06 1/9 13 par. 6)

Na 1914, Yesu akómaki kokonza banguna na ye (Nz 110:2; w00 1/4 18 par. 3)

Tokoki komipesa na bolingo na biso moko mpo na kopesa boyangeli ya Yesu mabɔkɔ (Nz 110:3; be 76 par. 2)

OMITUNA BOYE: ‘Mikano nini nakoki komityela mpo na komonisa ete nazali kopesa Bokonzi mabɔkɔ?’’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 110:4—Limbolá kondimana oyo vɛrsɛ yango elobeli. (it-1 80 par. 4)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 2) NDAKO NA NDAKO. Salelá traktɛ mpo na kobanda lisolo. (lmd liteya 4 pwɛ 3)

5. Kolimbola bindimeli na yo

(Min. 5) Elakiseli. ijwfq 23—Motó ya likambo: Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakendaka etumba te? (lmd liteya 4 pwɛ 4)

6. Kokómisa bato bayekoli

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 72

7. Ndenge nini tokoki kopesa Bokonzi mabɔkɔ na bosembo nyonso?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo Yehova atye mpo na komonisa ete azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Da 2:​44, 45) Na yango, ntango tozali kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ na molende, tozali kolongisa boyangeli ya Yehova.

Lakisá VIDEO Tópesa “Nkumu ya kimya” mabɔkɔ na bosembo nyonso. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini tokoki kopesa Bokonzi mabɔkɔ na bosembo nyonso?

Komá vɛrsɛ moko oyo eyokani na lolenge mokomoko oyo tokoki kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ.

  • Kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso.

  • Kotosa mibeko ya Bokonzi na oyo etali bizaleli.

  • Kosakola Bokonzi na molende.

  • Komemya baguvɛrnema ya bato, kasi kotosa Nzambe ntango mobeko ya Kaisala eyokani te na mobeko ya Nzambe.

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 75 mpe libondeli