Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kokabola mikanda

Ndenge ya kokabola mikanda

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Motuna: Soki moto atuni yo likoló ezalaka ndenge nini, okopesa eyano nini?

Vɛrsɛ: Yn 8:23

Okoki koloba boye: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo emonisi makambo Yesu mpe Tata na ye balobi mpo na likoló.

KOBANDA LISOLO: TEYÁ SOLO

Motuna: Omonaka mpe ete esakweli oyo ya Biblia elobeli makambo oyo tozali komona lelo?

Vɛrsɛ: 2Ti 3:1-5

Solo: Lokola esakweli ya Biblia oyo etali mikolo ya nsuka ezali kokokisama, tokoki mpe kondima ete esakweli oyo elobeli bomoi ya malamu na mikolo ezali koya ekokokisama.

MPO NA NINI KOYEKOLA BIBLIA? (Video)

Maloba ya ebandeli: Tozali kolakisa bato video moko ya mokuse oyo emonisi esika tokoki kozwa biyano na mituna ya ntina mpo na bomoi. [Lakisá video.]

Okoki koloba boye: Buku oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na ndenge Nzambe akobongisa makambo na mokili. [Pesá buku Biblia eteyaka to Mateya ya Biblia.]

KOMÁ MALOBA NA YO MOKO

Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.