Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BOKRISTO

Ndenge ya kosalela buku Makambo oyo Biblia eteyaka

Ndenge ya kosalela buku Makambo oyo Biblia eteyaka

Buku Mateya ya Biblia mpe buku Biblia eteyaka ezali kaka ndenge moko. Babuku yango mibale oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato ezali na mateya ndenge moko mpe mikapo elandani ndenge moko. Kasi, buku Mateya ya Biblia elobeli makambo na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Esalemi mpo na bato oyo bakoki kozala na mokakatano mpo na kokanga ntina ya buku Biblia eteyaka. Buku Mateya ya Biblia ezali na apɛndisi te; ezali nde na bitanda oyo elimboli maloba mpe makanisi mosusu oyo ezali na mokapo. Mikapo na yango ezali na mituna na ebandeli te, mpe na etanda ya bozongeli te. Kasi, na nsuka, ezali na eteni oyo elobi “Na mokuse” mpe emonisi mateya ya Biblia oyo ezali na mokapo yango. Ndenge moko na buku Biblia eteyaka, tokoki kopesa moto buku Mateya ya Biblia ntango nyonso, ata soki ezali mokanda ya kokabola na sanza wana te. Ndenge nini tokoki kosalela eteni ya buku Mateya ya Biblia ntango tozali koyekola na moto?

NA MOKUSE: Mpo na bato mingi, kotánga paragrafe na buku Biblia eteyaka mpe na nsima kotuna motuna ekosimba malamu. Bongo soki moyekoli ayebi monɔkɔ malamu te to ayebi kotánga malamu te? Na ntango yango, okoki kosalela buku Mateya ya Biblia. Mpo na boyekoli, salelá eteni oyo elobi “Na mokuse,” mpe lendisá ye atikala kotánga mokapo ye moko. Na boyekoli, bokoki kotalela liteya moko na boumeli ya miniti soki 15. Lokola eteni “Na mokuse” elobeli makambo nyonso te oyo ezali na mokapo, mosakoli asengeli komibongisa malamu, na kolanda bamposa ya moyekoli. Soki bosaleli mokapo mpo na koyekola, bokosalela eteni “Na mokuse” mpo na bozongeli.

BITANDA: Maloba mpe makanisi oyo ezali na bitanda etyami na molɔngɔ ndenge elandani na lisolo. Mosakoli akotala soki ebongi to te bálobela makambo oyo ezali na bitanda ya buku Mateya ya Biblia ntango bazali koyekola.