Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MASESE 27-31

Biblia elobeli mwasi oyo akoki

Biblia elobeli mwasi oyo akoki

Masese mokapo 31 ezali na toli ya ntina mingi oyo mama ya Mokonzi Lemuele apesaki ye. Toli yango ya bwanya esalisaki mokonzi yango ayeba bizaleli ya koluka epai ya mwasi oyo akoki.

Mwasi oyo akoki azali moto ya kotyela motema

31:10-12

  • Apesaka makanisi ya malamu na oyo etali bikateli ya kozwa na libota mpe azalaka na komikitisa

  • Mobali na ye atyaka motema ete akoki kozwa bikateli ya malamu, alukaka te ete asɛnga ye nzela liboso asala likambo nyonso

Mwasi oyo akoki azalaka makasi na mosala

31:13-27

  • Abatelaka mbongo ya libota mpe azalaka na bomoi ya mindɔndɔ te mpo bato ya libota na ye bálata mpe bálya malamu

  • Asalaka mosala makasi mpe abatelaka libota na ye butu moi

Mwasi oyo akoki azalaka moninga ya Nzambe

31:30

  • Abangaka Nzambe mpe alukaka kozala na boyokani malamu na ye