Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Kolanda makanisi ya mokili te ntango ozali kobongisa fɛti ya libala na yo

Kolanda makanisi ya mokili te ntango ozali kobongisa fɛti ya libala na yo

Ndeko mwasi ná ndeko mobali oyo bazali kobongisa fɛti ya libala na bango bazalaka na bikateli mingi ya kozwa. Bakoki komona lokola bato bazali kotya bango mbamba básala fɛti oyo elukaka makambo mineneminene, ndenge bato mingi balingaka. Na ndenge ya mabe te, baninga mpe bandeko ya libota bakoki koya na makanisi na bango mpo na makambo mosusu oyo esengeli kozala na fɛti yango. Mitinda nini ya Biblia ekosalisa ndeko mwasi ná ndeko mobali bábongisa fɛti ya libala na bango na ndenge oyo lisosoli na bango ekobeba te mpe bakoyoka mawa te na nsima?

TALÁ VIDEO BAFƐTI YA LIBALA OYO EPESAKA YEHOVA LOKUMU, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini mitinda oyo ya Biblia esalisaki Nick ná Juliana?

  • Mpo na nini ndeko mwasi ná ndeko mobali oyo balingi kobalana basengeli kopona ndeko mobali moko oyo akɔmeli na elimo mpo azala “mokambi ya fɛti”?​—Yn 2:9, 10.

  • Nini etindaki Nick ná Juliana bázwa bikateli oyo bazwaki mpo na fɛti ya libala na bango?

  • Nani azali na mokumba ya kozwa bikateli ya nsuka mpo na molulu mpe fɛti ya libala?​—w06 15/10 lok. 25 par. 10.