Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EMONISELI 1-3

“Nayebi makambo oyo osalaka”

“Nayebi makambo oyo osalaka”

1:20; 2:1, 2

  • “Minzoto nsambo”: Bankulutu oyo batyami mafuta na elimo, ata mpe bankulutu mosusu nyonso

  • “Na lobɔkɔ ya mobali [ya Yesu]”: Yesu ayebi makambo nyonso etali minzoto yango, azali na nguya likoló na yango mpe atambwisaka yango. Soki Yesu amoni ete nkulutu moko na lisangani ya bankulutu abongi kosembolama, asalaka ete esalema na ngonga mpe na ndenge oyo ye moko alingi

  • “Bitɛlɛmiselo ya miinda nsambo ya wolo”: Masangá ya bokristo. Kaka ndenge etɛlɛmiselo ya miinda ezalaki kosala ete pole engɛnga na tabernakle, masangá ya bokristo mpe esalaka ete pole ya elimo engɛnga. (Mt 5:14) Yesu “azali kotambola” na kati ya bitɛlɛmiselo ya miinda na ndenge alandelaka mosala oyo masangá nyonso esalaka