Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Yehova ayebi oyo tosengeli na yango

Yehova ayebi oyo tosengeli na yango

Moombo ya sembo mpe ya mayele apesaka biso bilei “na ntango oyo ebongi,” yango emonisi ete Yehova, oyo azali kotambwisa moombo yango, ayebi oyo tosengeli na yango na elimo. (Mt 24:45) Mayangani na biso ya etúká mpe makita ya kati ya pɔsɔ endimisi mpe likambo yango.

TALÁ VIDEO RAPPORT YA 2017 YA KOMITE YA MATEYA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Lokumu esengeli kokende epai ya nani mpo na mayangani oyo tosalaka na ntango oyo ebongi mpenza mpe mpo na nini?

  • Ntango nini mosala ya kobongisa mayangani ya etúká ebandaka?

  • Ndenge nini baponaka mitó ya makambo ya mayangani ya etúká?

  • Esɛngaka nini mpo na kobongisa mayangani ya etúká?

  • Ndenge nini babongisaka mateya oyo toyekolaka na likita ya kati ya pɔsɔ na kolanda mayele to batekiniki ya koyekola oyo balakisaka na Eteyelo ya Gileade?

  • Ndenge nini departema ndenge na ndenge esalaka elongo mpo na kobongisa Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala?

Oyokaka ndenge nini mpo na bilei ya elimo oyo Yehova apesaka biso?