25/11–01/12
EMONISELI 4-6
Loyembo 22 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Kopota mbangu ya batambwisi-mpunda minei”: (Min. 10)
Em 6:2—Motambwisi-mpunda ya mpɛmbɛ “abimaki azali kolonga” (wp17.3 lok. 4 par. 3, 5)
Em 6:4-6—Na nsima na ye, motambwisi-mpunda ya langi ya motane ngwaa mpe motambwisi-mpunda ya moindo (wp17.3 lok. 5 par. 2, 4-5)
Em 6:8—Oyo alandi ezali motambwisi-mpunda ya langi mwa moke lokola mai ya mpɔndu oyo nkunda ezalaki kolanda ye (wp17.3 lok. 5 par 8-9; lok. 8 par. 1)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Em 4:4, 6—Bankulutu 24 mpe bikelamu minei ya bomoi bazali elilingi ya banani? (re mok. 14 par. 8, 80 par. 19)
Em 5:5—Mpo na nini Yesu abengami “Nkɔsi ya libota ya Yuda”? (cf mok. 4 par. 5-6)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Em 4:1-11 (th liteya 5)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Min. 5) Lakisá video mpe bólobela yango.
Kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Eleka min. 3 te) Salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya mibale oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 4)
Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 5 te) lvs mok. 4 par. 15 (th liteya 2)
BOMOI YA BAKRISTO
“Yehova alingaka moto oyo apesaka na esengo”: (Min. 15) Lisolo na bayangani mpe ekosalema na nkulutu moko. Bandá na kolakisa video Ndenge ya kotinda makabo na nzela ya site Internet na biso. Yebisá bandeko ete bakoki koyeba ndenge ya kopesa makabo na nzela ya jw.org soki bafini na nse esika bakomi makabo, na JW Library esika bakomi dons, to soki babɛti maloba donate.pr418.com na Internet. Tángá mokanda ya botɔndi oyo euti na biro mpo na makabo oyo lisangá epesaki mpo na mobu ya mosala eleki. Pesá bandeko longonya mpo na makabo oyo bapesaka.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 92
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 43 mpe libondeli