Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EMONISELI 4-6

Kopota mbangu ya batambwisi-mpunda minei

Kopota mbangu ya batambwisi-mpunda minei

6:2, 4-6, 8

Yesu “abimaki azali kolonga” ndenge abundaki ná Satana mpe bademo kuna na likoló mpe abwakaki bango zingazinga ya mabele. Yesu azali kokoba kolonga mpo na bolamu ya basaleli na ye ndenge azali kosalisa mpe kobatela bango na mikolo oyo ya nsuka. ‘Akolonga tii na nsuka’ ntango akosukisa na Armagedone mbangu oyo batambwisi-mpunda misato bazali kopota mpe na nsima akolongola makambo ya mabe oyo kopota mbangu na bango ebimisi.