Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tóyembela Yehova na esengo nyonso

Tóyembela Yehova na esengo nyonso

Paulo ná Silasi bakumisaki Yehova na nzembo ntango bazalaki na bolɔkɔ. (Mis 16:25) Na ntembe te, koyemba epesaki bango makasi ya koyika mpiko. Bongo biso lelo oyo? Nzembo oyo toyembaka na makita mpe nzembo na biso mosusu ekoki kolendisa biso mpe kosalisa biso tótikala sembo ntango tokutani na komekama. Longola yango, ekumisaka Yehova. (Nz 28:7) Balendisaki biso tókanga mwa nzembo mosusu na motó. Omekaki kosala bongo? Tokoki koyembayemba nzembo yango na losambo na kati ya libota mpe koluka koyeba maloba na yango.

TALÁ VIDEO BANA BAZALI KOKUMISA YEHOVA NA NZEMBO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini koyemba nzembo ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?

  • Ndenge nini Departema ya Audio/Video emibongisaka mpo na kokɔtisa mingongo ya bayembi na stidio?

  • Ndenge nini bana mpe bato ya mabota na bango bamibongisaka mpo na kokɔtisa mingongo na stidio?

  • Nzembo nini ya Bokonzi osepelaka na yango mingi mpe mpo na nini?