Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

10-16/02

NZEMBO 147-150

10-16/02

Loyembo 12 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Tozali na bantina mingi ya kosanzola Yah

(Min. 10)

Atyelaka mokomoko na biso likebi (Nz 147:​3, 4; w17.07 18 par. 5-6)

Amityaka na esika na biso mpe asalelaka nguya na ye mpo na kosalisa biso (Nz 147:5; w17.07 18 par. 7)

Apesi biso lokumu ya kozala na kati ya basaleli na ye (Nz 147:​19, 20; w17.07 21 par. 18)


OMITUNA BOYE: ‘Likambo nini mosusu etindaka ngai nasanzola Yehova?’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 148:​1, 10—Na ndenge nini “bandɛkɛ oyo ezali na mapapu” esanzolaka Yehova? (it-2 438)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Moto yango ayebisi yo ete azali kobɛla maladi moko oyo eumeli. (lmd liteya 2 pwɛ 5)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Luká libaku ya koyebisa moto yango likambo moko oyo oyekolaki na makita oyo eleki. (lmd liteya 4 pwɛ 3)

6. Diskur

(Min. 5) w19.03 10 par. 7-11—Motó ya likambo: Yoká Yesu—Sakolá nsango malamu. Talá elilingi. (th liteya 14)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 159

7. Lapolo ya mbula na mbula

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Tángá liyebisi ya biro ya filiale oyo elobeli lapolo ya mbula, na nsima sɛngá bayangani bálobela makambo mosusu ya malamu oyo bamoni na Lapolo ya mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpo na mobu 2024. Sɛngá basakoli oyo oponaki liboso bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na mbula oyo eleki.

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 37 mpe libondeli