Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

06-12/01

NZEMBO 127-134

06-12/01

Loyembo 134 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Baboti—Bókoba kobatela bana, libula na bino ya motuya

(Min. 10)

Baboti bakoki kotya motema ete Yehova akosalisa bango mpo na kobatela bana na bango (Nz 127:​1, 2)

Bana bazali likabo ya motuya oyo euti na Yehova (Nz 127:3; w21.08 5 par. 9)

Teyá mwana mokomoko na kolanda bamposa na ye (Nz 127:4; w19.12 27 par. 20)

Yehova asepelaka ntango baboti batyeli ye motema mpe bazali kosala nyonso mpo na koteya bana na bango

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 128:3—Mpo na nini mokomi ya nzembo alobi ete bana bazali lokola mwa bitape ya nzete ya olive? (it-1 543)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. (lmd liteya 1 pwɛ 3)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Moto yango alobeli likambo moko oyo andimaka kasi Biblia eteyaka bongo te. (lmd liteya 5 pwɛ 4)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff liteya 16 pwɛ 4-5. Lokola okozala te, yebisá moyekoli bibongiseli oyo ozwi mpo boyekoli ekoba ntango okozala te (lmd liteya 10 pwɛ 4)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 13

7. Baboti—Bozali kosalela esaleli yango ya nguya mpo na koteya?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Ebongiseli ya Yehova ebimisi biloko ndenge na ndenge mpo na kosalisa baboti báteya bana na bango makambo ya Yehova. Kasi, esaleli moko ya nguya mpenza oyo baboti bazali na yango ezali ndakisa na bango ya malamu.—Mib 6:​5-9.

Yesu asalelaki esaleli yango ya nguya, elingi koloba ndakisa na ye, mpo na koteya bayekoli na ye.

Tángá Yoane 13:​13-15. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Mpo na nini omoni ete mayele oyo Yesu asalelaki ya koteya na ndakisa na ye esimbaki mpenza?

Soki ozali moboti, yebá ete makambo oyo osalaka ekoki kobakisa kilo na makambo oyo olobaka na bana na yo. Lisusu, ndakisa na yo ya malamu ekotinda bana bándima makambo oyo ozali koteya bango mpe ekoki kolendisa bango báyokaka yo.

Lakisá VIDEO Topesaki ndakisa malamu epai ya bana na biso. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Makambo nini ya ntina ndeko Garcia ná mwasi na ye bateyaki bana na bango ya basi?

  • Ndenge nini video yango elendisi yo okoba kopesa bana na yo ndakisa malamu?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (3 min.) | Loyembo 73 mpe libondeli