Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

24/02–02/03

MASESE 2

24/02–02/03

Loyembo 35 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Mpo na nini osengeli kozala molende na boyekoli na yo moko?

(Min. 10)

Mpo na komonisa ete solo ezali na motuya mingi mpo na yo (Mas 2:​3, 4; w22.08 18 par. 16)

Mpo esalisa yo ozwaka bikateli ya malamu (Mas 2:​5-7; w22.10 19 par. 3-4)

Mpo okómisa kondima na yo makasi (Mas 2:​11, 12; w16.09 23 par. 2-3)

OMITUNA BOYE: ‘Ndenge nini nakoki kobongisa lisusu boyekoli na ngai moko?’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Mas 2:7—Na ndenge nini Yehova azali “nguba ya baoyo batambolaka na bosembo”? (it-1 1195 par. 4)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Lakisá moto ndenge ya kozwa na jw.org masolo oyo ekoki kosalisa bato oyo babalá. (lmd liteya 1 pwɛ 3)

5. Kolandela bokoli

(Min. 3) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Pesá moto yango zulunalo oyo elobeli likambo oyo asepelaki na yango na lisolo na bino ya mbala eleki. (lmd liteya 9 pwɛ 3)

6. Diskur

(Min. 5) lmd apɛndisi A pwɛ 8—Motó ya likambo: Mwasi ná mobali basengeli kozala sembo epai ya moko mpe mosusu. (th liteya 13)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 96

7. Olingaka koluka biloko ya motuya?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Elenge, osepelaka na likanisi ya koluka biloko ya motuya oyo ebombami? Soki ezali bongo, Biblia esɛngi yo oluka eloko oyo eleki motuya na molɔngɔ mobimba—boyebi ya Nzambe! (Mas 2:​4, 5) Okoki kozwa eloko yango ya motuya soki ozali kozwa ntango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe kokɔta na mozindo na masolo oyo ozali kotánga. Kosala bongo ekopesa yo esengo mpe matomba mingi!

  • Mituna nini okoki komituna ntango ozali kotánga Biblia? (w24.02 32 par. 2-3)

  • Bisaleli nini okoki kosalela mpo na kozwa biyano?

Seri ya bavideo Zwá mateya epai ya baninga ya Yehova ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya komanyola makambo oyo ozali kotánga na Biblia.

Lakisá VIDEO Zwá mateya epai ya baninga ya Yehova —Abele.

Tángá Ebandeli 4:​2-4 mpe Baebre 11:4. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini Abele amonisaki ete azali moninga ya Yehova?

  • Ndenge nini Abele akómaki na kondima makasi epai ya Yehova?

  • Ndenge nini okoki kokóma na kondima makasi?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 23 par. 1-8 mpe maloba ya ebandeli na eteni 8

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 102 mpe libondeli