Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

27/01–02/02

NZEMBO 140-143

27/01–02/02

Loyembo 44 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Salá na boyokani na mabondeli oyo osalaki mpo na kosɛnga lisalisi

(Min. 10)

Zalá pene ya kondima mpamela mpe toli (Nz 141:5; w22.02 12 par. 13-14)

Manyoláká misala ya kobikisa ya Yehova (Nz 143:5; w10 15/3 32 par. 4)

Lukáká kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango (Nz 143:10; w15 15/3 32 par. 2)

Nzembo 140-143 ezali kaka te na mabondeli ya Davidi ya kosɛnga lisalisi; ezali mpe na maloba oyo emonisi ete asalaki na boyokani na mabondeli na ye.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 140:3—Mpo na nini Davidi akokanisaki lolemo ya bato mabe na oyo ya nyoka? (it-2 1134)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Bandá lisolo nsima ya kosalisa moto na likambo moko. (lmd liteya 3 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Moto yango ayebisi yo ete azalaka na ntango mingi te. (lmd liteya 7 pwɛ 3)

6. Limbolá bindimeli na yo

(Min. 5) Elakiseli. ijwfq lisolo 21—Motó ya likambo: Mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa bango makila? (th liteya 7)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 141

7. Omibongisa mpo na makambo oyo esɛngaka lisalisi ya monganga to lipaso

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Yehova alaki ete akozala “lisalisi oyo ezwamaka noki na ntango ya mpasi.” (Nz 46:1) Makambo oyo esɛngaka lisalisi ya monganga to lipaso ekoki kotungisa biso mingi. Kasi, Yehova apesi biso nyonso oyo esengeli mpo tómibongisa mpo na makambo ya ndenge wana. Na ndakisa, ebongiseli na ye epesi karte Pas de sang (DPA), Attestation individuelle (ic), a mikanda mosusu oyo etali lisalisi ya monganga b ata mpe Komite ya boyokani na minganga (CLH). Nyonso wana esalisaka biso tótosa mibeko ya Nzambe na oyo etali makila.—Mis 15:​28, 29.

Lakisá VIDEO Omibongisi mpo na makambo oyo esɛngaka lisalisi ya monganga mbangumbangu? Nsima tuná bayangani boye:

  • Matomba nini basusu bazwaki mpo batondisaki karte DPA?

  • Matomba nini basusu bazwaki ndenge basalelaki formilɛrɛ Makambo oyo mwasi ya zemi asengeli koyeba (S-401)?

  • Mpo na nini eleki malamu kobenga mbala moko bandeko ya CLH na likambo nyonso oyo esɛngi kokɔta lopitalo, lipaso, to lisalisi mosusu ya monganga, na ndakisa mpo na kansɛr, ata soki ezali komonana lokola mbala mosusu ekosɛnga makila te?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 103 mpe libondeli

a Basakoli oyo bazwá batisimo bakoki kosɛnga karte Pas de Sang (DPA) mpo na bango moko mpe attestation individuelle mpo na bana na bango ya mike epai ya ndeko oyo atalelaka mikanda.

b Makambo oyo mwasi ya zemi asengeli koyeba (S-401), Makambo oyo moto bakosala lipaso to bakopesa lisalisi ya maladi ya kansɛr (chimiothérapie) asengeli koyeba (S-407), mpe Makambo baboti basengeli koyeba wana bazali kolukela mwana na bango lisalisi ya monganga (S-55), bokoki kosɛnga yango epai ya bankulutu na bino soki esengeli.