Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Teyáká na esengo

Teyáká na esengo

Soki ozali na esengo, bato mosusu mpe bakokóma na esengo. Yango ebendaka likebi ya bayoki na biso. Lisusu emonisaka ete tozwaka na motuya nsango oyo tomemaka. Ata soki tozali na mimeseno nini, tobɔkwamá ndenge nini, biso nyonso tokoki koteya na esengo. (Ro 12:11) Ndenge nini tokoki kosala yango?

Ya liboso, kanisá ntina ya nsango oyo ozali komema. Ozali na libaku ya kosakola “nsango malamu ya makambo malamu!” (Ro 10:15) Ya mibale, manyolá na makambo malamu oyo nsango malamu ekoki komemela bayoki na yo. Bazali mpenza na mposa ya koyoka makambo oyo olingi koyebisa bango. (Ro 10:13, 14) Ya misato, lobáká na mpiko, saláká bajɛstɛ oyo ebongi mpe elongi na yo esengeli kolakisa ndenge ozali koyoka.

TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI: KOLISÁ MAKOKI NA YO​—TEYÁ NA ESENGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini Neeta azalaki lisusu te na esengo ya koyekola na Rose?

  • Nini esalisaki Neeta azongela lisusu esengo na ye?

  • Soki ozali na esengo, bato mosusu mpe bakokóma na esengo

    Mpo na nini tosengeli kotya makanisi na biso na bizaleli ya malamu ya bayoki na biso?

  • Esengo na biso ekoki kosala nini epai ya bayekoli na biso ya Biblia mpe bato mosusu?