Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

‘Bóbengana bato nyonso oyo bafandi na mokili’

‘Bóbengana bato nyonso oyo bafandi na mokili’

Yehova apesaki basaleli na ye motindo ete bálongola na Mokili ya Ndaka eloko nyonso oyo ekokaki kosala ete bátikala sembo te epai na ye (Mit 33:52; w10 1/8 lok. 23)

Yehova alingaki kopambola milende na bango mpo na kozwa mokili yango nyonso (Mit 33:53)

Mikakatano elingaki kobima soki Bayisraele balongaki te banguna na bango nyonso (Mit 33:55, 56; w08 15/2 lok. 27 par. 5-6; it-1-F lok. 392 par. 4)

Mpo tósepelisa Yehova, tosengeli kotika ezaleli nyonso oyo eyokani te na mitinda ya Biblia to makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná ye. (Yk 1:21) Yehova apesaka biso makasi ya kolonga bamposa na biso ya kosala masumu mpe ya kotɛmɛla makanisi mabe ya mokili oyo.