Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Kobá komibongisa lokola tozali kobika na nsuka ya “mikolo ya nsuka”

Kobá komibongisa lokola tozali kobika na nsuka ya “mikolo ya nsuka”

Lokola tozali kobika na nsuka ya “mikolo ya nsuka,” tokamwaka te komona ndenge mobulu ezali se kobakisama. (2Ti 3:1; nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 24:8) Ntango basaleli ya Yehova bakutani na likama moko boye, mbala mingi bazwaka malako na ntango oyo ebongi mpe oyo ebatelaka bomoi na bango. Tokobika kaka soki tozali kotosa mpe tomibongisi banda sikoyo, ezala na elimo mpe na mosuni.​—Lk 16:10.

  • Omibongisa na elimo: Zalá na momeseno ya kotánga Biblia mpe ya koyekola. Yekolá mitindo ndenge na ndenge ya kosakola. Kobanga te soki okabwani mpo na mwa ntango na bandeko ya lisangá. (Yis 30:15) Yebá ete ozali yo moko te, mpe Yehova ná Yesu bazali pene na yo.​—od mok. 17 par. 15-17

  • Omibongisa na mosuni: Longola kozala na basakosi, moto mokomoko ya libota asengeli kozala na bilei, mai, bankisi, mpe biloko ya ndenge wana soki esengeli mpo na komibatela na eleko moko ya ntango molai.​—Mas 22:3; g17.5 lok. 4 mpe 6

TALÁ VIDEO OMIBONGISI MPO NA MAKAMA OYO EKOKI KOBIMA? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini komibongisa na elimo ekosalisa biso ntango makama oyo ebimaka yango moko esalemi?

  • Mpo na nini ezali na ntina . . .

    • tósololaka ntango nyonso na bankulutu?

    • tóbongisa mwa sakosi mpo na kotya biloko ya ntina?

    • tólobela makama oyo ekoki kobima mpe makambo ya kosala mpo na likama mokomoko?

  • Wapi makambo misato oyo tokoki kosala mpo na kosalisa baoyo bakutani na makama?

OMITUNA BOYE: ‘Maladi ya coronavirus eteyi ngai nini na likambo etali komibongisa mpo na makama?’