Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na bomoko yembá!

Na bomoko yembá!

Zwá:

  1. 1. Bato baz’olela.

    Mikakatano’eleki

    Bitumba; kimya eza’ te.

    Baza’ komitungisa.

    Atako bampasi,

    Bozoba ya mokili

    Yehova apesi biso elikya:

    Mokili ya esengo

    (MONDIMO)

    Nzambe moko;

    Yehova.

    Biso nyonso,

    Tozali na kimya.

    Na bomoko, yembá!

  2. 2. Elikya ezali

    Yango tóyika mpiko.

    Yehov’azali, aza’ kosopa

    Kimya lokola mbula

    Mpo tóbangaka te,

    Tótika kolela.

    Mpo na seko tokozwa kimya.

    Tóyemba n’esengo:

    (MONDIMO)

    Nzambe moko,

    Yehova.

    Biso nyonso,

    Tozali na kimya

    Na bomoko, yembá!

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Yesu akopesa

    Bonsomi ya seko.

    Liwa mpe mawa nyonso elongwe,

    Tókumisa Nzambe

    Mokonzi Yehova.

    (MONDIMO)

    Nzambe moko;

    Yehova.

    Biso nyonso,

    Tozali na kimya.

    Nzambe moko;

    Yehova.

    Biso nyonso,

    Tozali na kimya

    Na bomoko, yembá!

    Paradiso eyee!