Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Pesá Yehova nkembo

Pesá Yehova nkembo

(Nzembo 96:8)

Zwá:

  1. 1. Nani akokani na yo?

    Moko te, Nzambe na nga’.

    Nafuta yo nini mpenza?

    Bolingo na yo monene.

    Na likoló, namonaka

    Nkembo mpe nguya na yo.

    Naza’ na nga’ moto mpamba,

    Oyokeli nga’ nde mawa.

    (MONDIMO)

    Ee Yehova, Yoká loyemb’oyo.

    Tiká nakumisa yo.

    Nzambe na nga’, yo Mokonzi’a seko,

    Obongi na lokumu!

    Obongi mpe na nkembo!

  2. 2. Napesi yo bomoi na nga’.

    Yah nakokumisa yo.

    Nakotatola bolamu

    Mpe mibeko n’o ya sembo.

    Kosalela yo, Yehova,

    Eza’ lokumu mpenza!

    Yo, nkembo mpe nguya na nga’,

    Tambwisá nga’ mpo na seko.

    (MONDIMO)

    Ee Yehova, yoká loyemb’oyo.

    Tiká nakumisa yo.

    Nzambe na nga’, yo Mokonzi’a seko,

    Obongi na lokumu!

    Obongi mpe na nkembo!

  3. 3. Mbu monene mpe bangomba,

    Minzoto, sanza ná moi

    Epesaka nga’ esengo.

    Namonaka bolingo n’o.

    Bozalisi emonisi

    Bwanya mpe nguya na yo.

    Zwá lokumu mpo na seko,

    Mpo ozali Mozalisi.

    (MONDIMO)

    Ee Yehova, yoká loyemb’oyo.

    Tiká nakumisa yo.

    Nzambe na nga’, yo Mokonzi’a seko,

    Obongi na lokumu!

    Obongi mpe na nkembo!

(Talá mpe Nz. 96:1-10; 148:3, 7.)