Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bolingo ya bondeko

Bolingo ya bondeko

Zwá:

  1. 1. Epai nyons’oke, ndako na yo’ezali.

    Mpo esika nyons’oke, bandeko n’o bazali.

    Mpe bolingo

    Na bango,

    Okomon’ango.

    Baza ná yo.

  2. 2. Bandeko n’o, bipai nyonso o nse,

    Elongo na Yehova mpe Mwana n’e,

    Balingi yo,

    Ekólo’ango

    Nde ya bolingo.

    Baza ná yo.

    (MONDIMO)

    Tata na biso’az’osunga

    Bana n’e nyonso.

  3. 3. Ata oza na zamba to ngomba,

    Na bingumba to na bisanga mosika,

    Yeb’oza

    Mwana ya libot’a Yehova.

    Baza ná yo.

    (MONDIMO)

    Tata na biso’az’osunga

    Bana na ye nyonso.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Nzokande mokili oyo,

    Eza kopesa nde nsɔmɔ.

    Eza esengo mpo na biso

    Koyeba Nzambe ya solo!

  4. 4. Yesu’alobá solo bólingana.

    Yango mpenza, lelo, bato ya Yehova,

    Bolingo’eza,

    Yo mpe oza kati na bango.

    Baza ná yo.

    Baza ná yo.