Ekoya
Zwá:
1. Nakangi miso namoni
Mokili’a kimya mpe bolingo.
Ekoya,
Ya solo.
Ekoya!
2. Eza’ ndɔtɔ te oyebi’ango.
Bilok’oyo Nzambe alaká
Eza’ solo,
Ekoya.
Ekoya!
(MONDIMO)
Pene n’o—
Esengo mpe kimya na nyonso.
Ya solo—
Boye nde Nzamb’alingaki’ezala.
3. Baye tobungisá na liwa,
Basekwi mpe toz’omona bango.
Ya solo,
Ekoya.
Ekoya!
4. Kolela mpe bampasi nyonso
Ekómi nde masolo, elimwe.
Nyons’oyo
Ya solo,
Ekoya.
(MONDIMO)
Pene n’o—
Esengo mpe kimya na nyonso.
Ya solo—
Boye nde Nzamb’alingaki’ezala.
5. Na miso’a kondima namoni
Mokili’a sika Nzamb’alaki.
(MOLƆNGƆ MOSUSU)
Ya solo,
Ez’oya
Na ntembe te,
Bomoi oy’a seko,
Mpenza—
6. Kangá miso mpe moná
Mokili’a sika eza’ koya.
Ya solo,
Ez’oya.
Ekoya!