Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakokende wapi?

Nakokende wapi?

Zwá:

  1. 1. Na ntang’oyo ya mpasi

    Natosaka Yesu.

    Azali mwinda

    Ya bomoi na nga’.

    Alakisi nga’ nzela

    Mpo nabunga te.

    Ye Mobateli-mpate

    Ya malamu.

    (LIBOSO YA MONDIMO)

    Mpo na nini nayoka

    Mongongo ya batɛmɛli,

    Baoyo balingi

    Nabunga nzel’a bomoi.

    (MONDIMO)

    Nga’ nakokende wapi?

    Na mpasi nani akosunga?

    Nga’ nakokende wapi?

    Koyoka mokili

    Yango nde libunga.

    Tiká nga’ natosa se Yesu.

  2. 2. Lisangá ya Nzambe

    Ezo’pesa nga’ esengo.

    Kuna bolingo,

    Kondima ya solo.

    Naza’ kozela paradi

    Nzamb’alaki

    Na nzela Mwana n’e

    Nabikisami.

    (LIBOSO YA MONDIMO)

    Naboyi koyoka

    Mongongo ya batɛmɛli.

    Nga’ nakotosa se

    Liloba ya Yehova.

    (MONDIMO)

    Nga’ nakokende wapi?

    Na mpasi nani akosunga?

    Nga’ nakokende wapi?

    Koyoka mokili

    Yango nde libunga.

    Tiká nga’ natosa se Yesu.

    (MONDIMO)

    Nga’ nakokende wapi?

    Na mpasi nani akosunga?

    Nga’ nakokende wapi?

    Koyoka mokili

    Yango nde libunga.

    Tiká nga’ natosa se Yesu.

    Nga’ nakokende wapi?

    Nzel’a Yesu nde nakolanda!