Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tózongisa boninga

Tózongisa boninga

Zwá:

  1. 1. Eumeli nabombaki

    Nkanda oyo na motema.

    Kati na nga’ se mabanzo,

    Ezo’ bundisa kimya na

    Ngai mpenza.

    (MONDIMO)

    Tóbwaka nyonso na nsima

    Tóbosana mabe yango!

    Tólimbisana ya solo!

    Tózongisa, ɛɛ boninga.

  2. 2. Nasengeli kolimbisa

    Ata motema ezokaki

    Nakanisi boling’oyo

    Nzamb’alakisá na liwa

    Ya mwana n’e.

    (MONDIMO)

    Tóbwaka nyonso na nsima

    Tóbosana mabe yango!

    Tólimbisana ya solo!

    Tózongisa, ee boninga.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Nga’ nakokende

    Komona ye, tóbongisa.

    Tozali bandeko

    Tólongola nkanda oyo.

  3. 3. Nzamb’alingi tókolisa

    Boninga ya ngai ná yo.

    Kolimbisa eza’ kimya

    Na motema, pardon

    Tóbongisa ndeko!

    (MONDIMO)

    Tóbwaka nyonso na nsima

    Tóbosana mabe yango!

    Tólimbisana ya solo!

    Tózongisa, ɛɛ boninga.

    Tózongisa, ɛɛ boninga.

    Toza’ bandeko!